8 Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.
Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, mikolo ya tango ya Moyize : Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ? Wapi Ye oyo atiaki kati na bango Molimo Mosantu na Ye ?
Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.
Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te ; bongo Polo abakisaki liloba oyo : — Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi :