Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 9:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.


Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.


Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.


Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.


Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.


Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima.


Nzokande, tango Moyize akitaki wuta na ngomba Sinai, na bitando ya mabanga mibale ya mibeko na maboko na ye, ayebaki te ete elongi na ye ezalaki kongenga, mpo ete asololaki na Yawe.


Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko.


Sanduku ya Litatoli, mabaya ya komemela yango mpe mofinuku na yango,


okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.


akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido.


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye.


Boye, Moyize mpe Aron bakendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani


Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani.


Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ