Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo ; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse ; mpe alobaki na ngai : « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso ; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule
Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu ; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.
Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.