25 Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.
Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.
Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.
Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela.
nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.
Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.
Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye.
Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu ; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.