Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 9:23 - Mokanda na Bomoi

23 Boye, lokola bililingi ya biloko oyo ezali kati na Likolo esengelaki kopetolama ndenge wana, ezalaki na tina ete yango moko mpe biloko ya Likolo epetolama na nzela ya bambeka oyo eleki malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 9:23
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?


Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;


Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai ; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.


Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.


Nyonso wana ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya, kasi bosolo na yango ezali penza kati na Klisto.


Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te ; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu.


pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu.


ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye : « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »


nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.


Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo ; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ