Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 9:22 - Mokanda na Bomoi

22 Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila ; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 9:22
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila.


Nganga-Nzambe akozwa makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na kozongisa boyokani, akopakola yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali.


Akokata kingo ya mwana meme yango oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Nganga-Nzambe akotia makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu, na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali.


Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope ; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto ;


pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila. Napesi bino yango mpo ete bosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na bomoi na bino, na etumbelo. Lokola bomoi ya moto ezali kati na makila, yango wana makila esalaka mosala ya bolimbisi masumu.


Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama.


Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’


Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › »


Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.


Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.


Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu.


Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama.


‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato : ‘ Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ