Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bongo, na makila yango, asopelaki lisusu Mongombo mpe bisalelo nyonso ya losambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 9:21
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani ; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo.


Okozwa ndambo ya makila ya ngombe yango, mpe okosalela mosapi na yo mpo na kotia makila yango na maseke ya etumbelo ; okosopa na makolo ya etumbelo makila oyo ekotikala.


Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.


Mokolo na mokolo, okobonza mbeka ya ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Okopetola etumbelo na nzela ya mosala ya bolimbisi masumu, oyo okosala mpo na etumbelo yango mpe okosopela yango mafuta ya epakolami mpo na kobulisa yango.


Okozwa mafuta ya epakolami, okopakola Mongombo mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mpe okobulisa yango elongo na bisalelo na yango nyonso mpe yango ekozala bule.


Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.


Moyize akataki kingo ya meme yango mpe asopaki makila na yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.


Aron akataki kingo ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali lokola mbeka ya boyokani mpo na bato ; bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ