Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 9:2 - Mokanda na Bomoi

2 Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 9:2
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.


Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.


Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.


Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude.


Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ;


Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe.


— Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani ;


Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.


ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?


Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.


Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ