Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 8:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzokande, Nzambe apamelaki penza bato na Ye tango alobaki : « Na mikolo ekoya, nakosala Boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 8:8
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


« Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.


Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; ›


Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir ;


Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.


ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.


Bongo alobaki na bango : — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele.


Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.


Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki : — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.


Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika.


Ndenge moko mpe, sima na Ye kolia, azwaki kopo mpe alobaki : « Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai ! Tango nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »


Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.


kasi mpe elongo na ba-oyo bazali awa kati na biso, na mokolo ya lelo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe elongo na ba-oyo bazali awa te elongo na biso.


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Ezali na nzela ya seleka yango nde Yesu akoma ndanga ya boyokani oyo eleki motuya.


Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala ; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.


Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.


Yango wana, Klisto azali Moyokanisi kati na Boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa libula ya seko oyo Nzambe alakaki bango. Mpe bakoki solo kozwa yango, pamba te Klisto asilaki kokufa lokola mbeka mpo na kosikola bango na masumu oyo basalaki tango bazalaki na se ya bokonzi ya boyokani ya kala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ