Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 8:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 8:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Siona mpe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango ; bakolobana bango na bango : ‹ Boya, tika ete tokangama na Yawe na nzela ya boyokani oyo ezali na suka te, boyokani oyo tokoki kobosana te ! ›


Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki : — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.


oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka


Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.


Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato : ezali moto moko, Yesu-Klisto


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Ezali na nzela ya seleka yango nde Yesu akoma ndanga ya boyokani oyo eleki motuya.


Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ