Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye : « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 8:5
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apesaki ye elili ya nyonso oyo molimo atiaki na makanisi na ye na tina na lopango ya Tempelo ya Yawe, ya bashambre nyonso ya zingazinga, ya biloko ya talo ya Ndako ya Nzambe mpe ya biloko ya bule.


Davidi alobaki : — Nyonso oyo nazali na yango na mokanda oyo, ekomami na loboko na Yawe ; Ye moko apesi ngai mayele mpo na kososola misala nyonso oyo elili ezali kotalisa.


Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.


Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.


Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba.


Okosala etumbelo na mabaya ; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba.


Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda : basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango ; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize.


Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu.


Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki.


Nyonso wana ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya, kasi bosolo na yango ezali penza kati na Klisto.


Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te ; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?


Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango,


Mpe ezali elilingi ya makambo oyo ezali kosalema na tango oyo mpo na kotalisa ete makabo mpe bambeka oyo babonzelaka Nzambe ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, mitema ya bato oyo basambelaka ndenge wana.


Tomilobelaki : « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango : ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki ; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › »


Sima na yango, natalaki mpe namonaki Tempelo kofungwama kati na Lola ; mpe kati na yango, ezalaki na Mongombo ya Litatoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ