Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
Pamba te nazali koloba na bino solo : Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
Ezali lisusu kati na Ye nde bakataki bino ngenga, na nzela ya maboko ya bato te kasi na lolenge ya Klisto : balongolaki kati na bino nzoto ya bomoto mpe ya masumu,
Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato.
Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.