Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nzokande, tembe ezali te ete ezali moto oyo azali na se nde azwaka lipamboli kowuta na moto oyo aleki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 7:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.


Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?


Wana atelemaki, apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele na mongongo makasi mpe alobaki :


Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.


Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


Kasi Melishisedeki oyo azalaki kutu moto ya libota ya Levi te azwaki eteni ya zomi ya Abrayami, mpe apambolaki moto oyo Nzambe apesaki bilaka.


Botala lisusu : na ngambo moko, ezali bato oyo bakufaka nde bazali kozwa biteni ya zomi ; kasi na ngambo mosusu, kolanda Makomi, ezali moto na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ