5 Solo, Mibeko ya Moyize etindaki bana ya Levi, oyo bakomi Banganga-Nzambe kozwa biteni ya zomi epai ya bandeko na bango, bato ya Isalaele, oyo bazali mpe bato ya libota ya Abrayami.
Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.
Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba.
Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango ; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.
Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »
Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.
Moto moko te akoki komikomisa mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde akomisaka moto mokonzi ya Banganga-Nzambe soki mpe kaka abengi ye, ndenge ezalaki mpo na Aron.