Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi : « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »