Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 7:28 - Mokanda na Bomoi

28 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 7:28
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alapaki ndayi oyo, akobongola maloba na Ye te : « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki ! »


‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.


Yesu alobaki na bango : — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »


Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.


Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.


Emonanaki malamu ete, mpo na komema bana ebele na nkembo, Nzambe oyo akela biloko nyonso mpe azali Nkolo na yango akomisa ya kokoka na nzela ya pasi, mokonzi oyo asengelaki komema bango na lobiko.


Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.


Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.


Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.


Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka.


Ndenge moko mpe mpo na Klisto : amikomisaki te Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde alobaki na Ye : « Ozali Mwana na Ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »


Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye : « Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te : ‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › »


Kasi mpo ete Yesu azali na bomoi seko na seko, Bonganga-Nzambe na Ye ezali mpo na libela.


Azalaki na tata te, mama te, bakoko te, mokolo ya mbotama te, mpe mokolo ya kufa te ; azalaki lokola Mwana na Nzambe, mpe azali Nganga-Nzambe mpo na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ