Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 7:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye : « Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te : ‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 7:21
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alapaki ndayi oyo, akobongola maloba na Ye te : « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki ! »


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.


Mpe, na esika mosusu kati na Makomi, alobaki : « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki. »


Pamba te, tala litatoli oyo baloba na tina na Ye : « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki. »


Makambo wana nyonso esalemaki na nzela ya seleka oyo Nzambe akataki. Nzokande, mpo na Balevi, Nzambe akataki ata seleka te mpo ete bakoma Banganga-Nzambe.


Mpe lisusu, Banganga-Nzambe bazalaki kokitana ebele, pamba te kufa ezalaki kopekisa bango kosala mosala na bango libela na libela.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.


Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ