Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.
Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.
Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango.
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.
Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.