Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
« Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »
Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.
Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »