ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye.
Boye, soki bato oyo bazwaki mobeko bakokaki kokoma ya kokoka na nzela ya bonganga-Nzambe ya Balevi, mpo na nini kotia Nganga-Nzambe mosusu, kolanda molongo ya Melishisedeki, kasi kolanda molongo ya Aron te ?