Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Melishisedeki azalaki mokonzi ya Salemi mpe Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo. Ezali Melishisedeki nde akendeki kokutana na Abrayami, wana Abrayami azali kozonga sima na ye kolonga bakonzi ; mpe ezali Melishisedeki nde apambolaki Abrayami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 7:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nzambe, yokela ngai mawa ! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo ; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.


Nzambe ayebani kati na Yuda ; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.


Bazalaki kozongisa na makanisi na bango ete Nzambe nde azali Libanga na bango, ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Mosikoli na bango.


Kasi bamekaki Nzambe, batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo mpe babatelaki te malako na Ye ;


Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai.


Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu.


Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.


Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ?


mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !


Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga : — Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.


epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.


Abrayami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. Kombo ya Melishisedeki elakisi « mokonzi ya bosembo. » Azali lisusu mokonzi ya Salemi ; elingi koloba : mokonzi ya kimia.


Azalaki na tata te, mama te, bakoko te, mokolo ya mbotama te, mpe mokolo ya kufa te ; azalaki lokola Mwana na Nzambe, mpe azali Nganga-Nzambe mpo na libela.


Kasi Melishisedeki oyo azalaki kutu moto ya libota ya Levi te azwaki eteni ya zomi ya Abrayami, mpe apambolaki moto oyo Nzambe apesaki bilaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ