Nazali lisusu na kanda te. Ah, soki ezalaki kaka na banzube mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, nde natambolaki likolo na yango na bitumba mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.
Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.
Yesu alobaki na nzete yango : « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! » Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango.
Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.
Boyebi malamu ete, na sima, tango alingaki kokitana na lipamboli kowuta na tata na ye, azangelaki yango, pamba te alongaki te kobongola mokano ya tata na ye atako asengaki lipamboli yango na kolela.