20 epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.
Na nzela wana nde bino mpe bokobonza makabo epai na Yawe wuta na biteni nyonso ya zomi oyo bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele. Mpe wuta na biteni wana ya zomi, bosengeli kopesa eteni ya Yawe epai ya Nganga-Nzambe Aron.
Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.
Emonanaki malamu ete, mpo na komema bana ebele na nkembo, Nzambe oyo akela biloko nyonso mpe azali Nkolo na yango akomisa ya kokoka na nzela ya pasi, mokonzi oyo asengelaki komema bango na lobiko.
Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.
Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.
Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela.
Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo ; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.