Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabe akokangama na motambo oyo asali ye moko, kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango.
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, soki oyebi yango te, landa kaka matambe ya bibwele, na banzela oyo yango elekeli, mpe leisa bana bantaba ya basi na yo pembeni ya bandako ya kapo ya babateli bibwele.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,
mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ;
Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,