Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.
Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.
Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu ; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.
Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.