Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 5:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 5:14
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye  : koyeba malamu na mabe.


Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »


Nzambe alobaki na ye : — Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te ; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo,


Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Boni, litoyi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei ?


Pamba te litoyi nde esosolaka maloba ndenge lolemo emekaka bilei.


Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ; monoko na ngai ekoki kososola mabe te ?


Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Solo ya malasi na yo ezali kitoko, mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko oyo epanzani ; yango wana bilenge basi balingaka yo !


Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.


Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu.


Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.


Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.


Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.


Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,


Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka.


Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.


kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.


Boye, boya masolo ya bozoba, oyo etiolaka Nzambe ; boya mpe bilobaloba ya mibange basi. Mipesa nde na botosi kati makambo ya Nzambe ;


Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo ; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,


Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ