Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 5:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nzokande, moto nyonso oyo atikalaka kaka na miliki azali mwana moke mpe ayebi te liloba oyo eteyaka bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 5:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yo mpe kokokisama ya bosembo na Yo kolanda elaka na Yo.


Azali nani, ye oyo azali koluka koteya ? Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani ? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele ?


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


molakisi ya bazoba, moteyi ya bana mike, pamba te ozwaka kati na Mobeko boyebi nyonso mpe bosolo.


Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke ; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.


Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.


Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.


Pamba te, soki lotomo oyo ememelaki bato etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo esalaki ete Nzambe akomisa bato sembo eleka na nkembo te ?


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,


Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,


pamba te moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ