Ba-Ebre 5:12 - Mokanda na Bomoi12 Bosengelaki wuta kala kokoma balakisi ; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !