Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 4:8 - Mokanda na Bomoi

8 Pamba te, soki Jozue alonga penza kopesa bango bopemi, Nzambe alingaki lisusu te koloba na tina na mokolo mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 4:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apesaki bango mabele ya bikolo mosusu mpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango


abenganaki bikolo liboso na bango, apesaki bango etando lokola libula mpe avandisaki mabota ya Isalaele kati na bandako na bango ya kapo.


Sima na kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya Bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi ;


Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino.


Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.


Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.


Boye, mpo na bato ya Nzambe, etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki.


kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.


Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.


Sima na Yawe kopesa bopemi na Isalaele liboso ya banguna nyonso oyo bazingelaki bango, elekaki tango molayi. Bongo, Jozue akomaki mobange, mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ