Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 4:16 - Mokanda na Bomoi

16 Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 4:16
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi apesaki Salomo, mwana na ye ya mobali, elili ya ndako moke ya kokotela na Tempelo, ya bandako mosusu ya Tempelo, ya bibombelo na yango, ya bashambre na yango ya likolo, ya bashambre na yango ya kati mpe ya esika ya bolimbisi masumu.


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te ; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.


Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.


Kati na Yesu-Klisto mpe na nzela ya kondima na biso kati na Ye, tozali na elikya ya kopusana na bonsomi nyonso pene ya Nzambe.


Boye tokoki koloba na elikya nyonso : « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ? »


Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.


Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.


Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.


Na likolo ya Sanduku, ezalaki na bililingi ya basheribe ya nkembo, oyo ezipaki mofinuku ya Sanduku na nzela ya elili ya mapapu na yango. Kasi tokoki te sik’oyo kolobela biloko oyo na molayi.


Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ