— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato : nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi.
Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.
Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana : « Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko, lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.
Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.
ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.
Azalaki na tata te, mama te, bakoko te, mokolo ya mbotama te, mpe mokolo ya kufa te ; azalaki lokola Mwana na Nzambe, mpe azali Nganga-Nzambe mpo na libela.
Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.
Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela.
Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo ; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.