Ba-Ebre 3:9 - Mokanda na Bomoi9 epai wapi batata na bino bamekaki ngai mpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngai atako bamonaki misala na ngai အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.