Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize ; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 3:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.


Sik’oyo, soki lotomo ya kufa, oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga, eyaki na nkembo, na ndenge ete bana ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize likolo ya kongenga ya nkembo na yango, nzokande nkembo yango esengelaki kosila,


azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba ; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,


Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.


Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi ; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso.


Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ