Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 3:2 - Mokanda na Bomoi

2 Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 3:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.


Kasi ezalaka bongo te mpo na Moyize, mosali na Ngai. Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.


Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.


Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.


Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.


Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.


Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye.


Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.


Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,


mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.


Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.


Bongo Samuele alobaki na bato : — Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ