Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 3:18 - Mokanda na Bomoi

18 Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye ? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 3:18
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te batiaki elikya na Nzambe te, bandimaki te ete akoki kokangola bango.


Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai ? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango ?


moko te kati na bango akomona lisusu mokili oyo nalakaki na nzela na ndayi epai ya bakoko na bango, moko te kati na ba-oyo batiolaki Ngai akomona lisusu mokili yango.


bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


bato oyo babimisaki maloba mabe na tina na mokili yango, bazwaki etumbu mpe bakufaki liboso ya Yawe.


Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »


Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.


Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda,


Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.


Boye, kati na kanda na ngai, nakataki seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »


Yango wana, tosala makasi mpo na kokota kati na bopemi yango mpo ete tokweya te kati na bozangi botosi lokola bana ya Isalaele.


Pamba te, biso mpe toyokaki Sango Malamu lokola bango ; kasi mateya oyo bayokaki esungaki bango ata na likambo moko te mpo ete bato oyo bayokaki yango bayambaki yango na kondima te.


Boye, lokola emonani polele ete ezali nanu na bato oyo basengeli kokota kati na bopemi yango, mpe ete bato oyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu bakotaki te mpo ete batosaki Nzambe te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ