13 kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.
Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »
Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›