Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo.
Ngai Yawe nde nalobi ; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo ; ezali awa nde bakokufa. »
Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango.
Sik’oyo, biso oyo tondimi, tozali kokota kati na bopemi yango kolanda ndenge Nzambe alobaki : « Yango wana, kati na kanda na ngai, nakataki seleka oyo : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › » Nzambe alobaki bongo, atako misala na Ye emonanaki wuta na tango oyo akelaki mokili.