Ba-Ebre 3:1 - Mokanda na Bomoi1 Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto ; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
Yango wana, Klisto azali Moyokanisi kati na Boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa libula ya seko oyo Nzambe alakaki bango. Mpe bakoki solo kozwa yango, pamba te Klisto asilaki kokufa lokola mbeka mpo na kosikola bango na masumu oyo basalaki tango bazalaki na se ya bokonzi ya boyokani ya kala.