Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 2:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 2:17
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bantaba mpe babwakaki makila na yango na etumbelo lokola mbeka mpo na masumu, mpe mpo na kokokisa mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele mobimba ; pamba te mokonzi apesaki mitindo ete babonza mpo na Isalaele mobimba bambeka ya kotumba mpe bambeka mpo na masumu.


Bosembo ekozala mokaba na ye, mpe boyengebene ekozala na loketo na ye lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.


Mpe bokozwa ntaba moko ya mwasi to meme moko ya mobali kati na bibwele nkama mibale, oyo ekobimela na etonga ya bibwele oyo eliaka matiti kitoko ya Isalaele. Bakosalela yango lokola likabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato, elobi Nkolo Yawe.


Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.


Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi ; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


Bongo Nganga-Nzambe akosopa, na moto ya moto oyo azali komipetola, mafuta oyo ekotikala na loboko na ye mpo na kosala, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu na ye.


Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.


Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.


Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama ; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu.


Yango wana namikumisaka kati na Yesu-Klisto, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe.


Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.


mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango.


Nzokande na kala, bozalaki mosika ya Nzambe mpe bozalaki banguna na Ye mpo na mabe nyonso oyo bozalaki kokanisa mpe kosala.


Boye, tozali na Mokonzi Monene ya Banganga-Nzambe, oyo azali Mokonzi ya Ndako ya Nzambe.


Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,


Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,


Pamba te ezali penza ya solo ete Yesu ayaki te mpo na kosunga ba-anjelu, kasi mpo na kosunga nde bakitani ya Abrayami.


Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.


Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe.


Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda.


Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka.


Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.


Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe aponamaka kati na bato mpe, lokola mosali ya Nzambe, atiamaka mpo na bolamu ya bato kati na makambo oyo etali boyokani na bango elongo na Nzambe. Mosala na ye ezali : kobonzela Nzambe makabo mpe bambeka mpo na masumu ya bato.


pamba te Nzambe atia Ye Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kolanda molongo ya Melishisedeki.


Azali na makoki ya kozala na boboto liboso ya bolembu ya bato oyo bazangi boyebi mpe basalaka masumu, pamba te ye moko mpe azali moto na bolembu.


Ndenge moko mpe mpo na Klisto : amikomisaki te Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde alobaki na Ye : « Ozali Mwana na Ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »


epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.


Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,


Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.


Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.


Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe atiamaka mpo na kobonza makabo mpe bambeka. Boye Yesu, Mokonzi na biso ya Banganga-Nzambe, asengeli mpe kozala na eloko ya kobonza lokola likabo to mbeka.


Kasi tango Klisto ayaki lokola Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na kopesa biso biloko oyo asilaki kozwa mpo na biso, akatisaki Mongombo ya monene makasi mpe ya kokoka ; ezali Mongombo oyo esalema na maboko ya bato te, ezali ya mokili oyo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ