Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto.
Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.
Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.