Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 13:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 13:9
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.


Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.


Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino !


Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika.


Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.


Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.


Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.


Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.


Moto oyo akesenisaka mikolo asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo. Moto oyo aliaka bilei nyonso asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe ; mpe moto oyo aponaka bilei asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe.


« bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.


Nzokande, ezali bilei te nde ememaka biso pene ya Nzambe ; soki tolie yango te, tokobungisa eloko moko te ; soki mpe tolie yango, tokozwa eloko moko te.


Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto ; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye,


Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.


Nalobi na bino bongo mpo ete moko te akosa bino na nzela ya maloba ya lokuta.


balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso !


bopesaka na mobulu nzela te ya kokota na pete kati na makanisi na bino to tika ete mitema na bino etungisamaka te likolo na emoniseli, liloba to mokanda oyo bato bakoki koloba na tina na yango ete ewuti epai na biso mpe ezali koloba ete mokolo ya Nkolo esili kokoma.


Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.


Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.


Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga : baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango ; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema ; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma ; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.


Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ