3 Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi.
Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama moko ete abatela Polo lokola mokangami kati na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa bandeko na ye nzela mpo ete basunga ye.
Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango.
Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.
bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba ; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi :