Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 13:21 - Mokanda na Bomoi

21 apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 13:21
53 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.


Yawe akokisaka makambo nyonso mpo na bolamu na ngai. Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko ! Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo !


Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.


Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ? Bazongisaki : — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.


Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.


Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.


Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto ! Amen !


Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,


Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela ! Amen !


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.


mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.


Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.


Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.


Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso ! Amen !


Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso : bokimaka pite ;


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso !


Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela ! Amen.


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.


Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.


Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki.


pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo ; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso ; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka ;


Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye : na botosi mpe na kobanga.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.


Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye.


epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !


Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima.


Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ