Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.
Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.
Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?
Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki : — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote. Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [
Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.
Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge ; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,
Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo.