18 Bosambelaka mpo na biso ! Pamba te tondimisami penza ete tozali na mitema ya peto mpe tozwi mokano ya kotambola na bomoi ya lokumu kati na makambo nyonso.
Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo : Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.
Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.
Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.
Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto