Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.
batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se.
Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.
Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.
Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori.
Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.