11 pamba te banzoto ya banyama oyo mokonzi ya Banganga-Nzambe amemaka makila na yango kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu, etumbamaka na libanda ya molako.
Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango.
Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule. ’ › »
Bongo bana mibali ya Aron bamemelaki ye makila. Aron azindisaki mosapi na ye kati na makila, apakolaki makila yango na maseke ya etumbelo mpe asopaki makila oyo etikalaki na makolo ya etumbelo.
Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa.