Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.
Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te.