Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 12:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 12:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu ; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye.


Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.


Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.


Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.


Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.


Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.


Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.


Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.


Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?


Mpe makambo oyo ekokweyela bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, ekozala elembo mpo na yo : bango mibale bakokufa mokolo moko.


Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ