5 Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana : « Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo, mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.
Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ?
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.